Monkanda mwa Papa Francisco « Aperuit illis »

 

Monkanda mwa Papa Francisco « Aperuit illis »

Boluboli Lomingo ya Liloba lya Nzambe

 

  1. « Na nsima, afungoli mayele ma bango mpo bayeba ntina ya maloba makomami o Minkanda (Lk 24,45) ». Tala yoko ya bikela bya nsuka Mokonzi Asekwi asali yambo ya Mbuta na ye. Abimeli bayekoli baye basanganaki esika yoko, abuki limpa elongo na bango, mpe afungoli mayele ma boyebi Minkanda Misantu. Mpo ya bato baye bazalaki na bobangi mpe mitema milembeki ayebisi bango ntina ya mobombamo mwa Pasika : elingi koloba, engebene na mwango ya Tata, Yezu asengelaki koyoka malozi mpe asekwa o bawa na ntina ‘te bato babongola mitema mpo bazwa bolimbisi masumu (Lk 24,26.46-47). Mpe, alakeli bango Elimo Santu oyo akopesa nguya ya kokoma banzeneneke ba mobombamo ya libiki (Lk 24,49).

Bokangami kati na Mosekwi na lisanga ya bayambi mpe na Minkanda Misantu ezali na ntina enene mpo ya boyebi mpenza soki tozali banani. Soki Mokonzi ye moko ayingisi biso o Minkanda Misantu te, tokoki koyeba bozindo na yango te. Kasi, tokoki mpe koloba: soko Minkanda Misantu mizala te tokoki koyeba mpe te ntina ya mambi masalemaki ma etinda ya Yezu mpe ya Eklezya o kati ya mokili. Se bongo Santu Jérome akomaki « oyo ayebi Minkanda Misantu te, ayebi mpe Kristu te » (In Is, prologue, PL24, 17).

  1. Mpo ya kosukisa bosepeli eyenga enene ya Jubilé ya Ngolu ya Nzambe nasengaki tokanisa kolubola « Lomingo moko mpo ya Liloba lya Nzambe, na ntina ‘te toyeba nkita enene, oyo esilaka te, euti na lisolo lya Nzambe ye na bato ba ekolo ya ye» (Misericordia et Misera, n 7). Kobonza na ndenge esengeli «lomingo moko na Mobu ya Eklezya » mpo na Liloba lya Nzambe ekopesa nzela na Eklezya ekundola ekela ya Mosekwi oyo afungoleli biso mpe nkita ya Liloba na ntina ‘te tokoka kozala o mokili basangeli ba nkita ena enene. Na yango mateya ma Santu Ephrem eyei na makanisi ma ngai : « Nani akoki mpenza koyeba nkita mobimba ata moko ya maloba ma yo Mokonzi ? Maye toyebi ezali mpenza moke na oyo toyebi te. Ezali lokola bato bazali na mposa makasi ya mayi bameli o liziba. Mambi o kati ya Liloba na yo ezali ebele lokola mpe lolenge ya bomoni mpe ezali ebele mpo na baye bazali koyekola yango. Mokonzi atiyi langi ebele o Liloba lya ye mpo epesa kitoko ya ndenge ebele na ntina ‘te moto na moto oyo andimi yango, akoka kotala na bokebi oyo ye alingi. Mpe kati ya Liloba nkita ebombami ya lolenge na lolenge, na ntina ‘te moto moko na moko ya biso amona nkita na oyo azali komanyola (Ndimbola ya Diatessaron, 1,18).

O monkanda moye nalingi kopesa eyano na bato ebele ba ekolo ya Nzambe basengi ‘te Eklezya mobimba ekoka kosepela na motema moko Lomingo ya Liloba lya Nzambe. Ekomi bongo momeseno mpo na lisanga lya bakristu amipesa mpe ayeba motuya monene ya Liloba o bomoi bwa ye ya mokolo na mokolo ; o ntei ya ba eklezya ebele ya mboka na mboka makanisi ma kitoko esali ‘te Minkanda Misantu mikoma mpenza o maboko ma bandimi. Na motema botondi mpo ya likabo liye, bamipesa mpo ya kosalela yango mokolo na mokolo mpe bazala banzeneneke ba solo.

Concile œcuménique Vatican II epesaki nguya enene ya koyeba lisusu Liloba lya Nzambe na lisalisi lya monkanda Constitution dogmatique Dei Verbum. Tee sikoyo, esengeli komanyola nkasa ena, mpe kokokisa yango ntango inso, na boye ekomonana polele lolenge Minkanda Misantu mipesami o bileko na bileko (Ch. II), makanisi mauti na Nzambe (Ch. III) oyo esangisi Bondeko bwa kala Bondeko na bwa Sika (Ch. IV, V), litomba na yango mpo na bomoi bwa Eklezya (Ch. VI). Mpo na bokolisi liteya lina Papa Benoit XVI abengisaki o mobu 2008 likita linene (Likita ya ba Episkopo). Mama ma liteya ezalaki: « Liloba lya Nzambe o kati ya bomoi mpe etinda ya Eklezya » mpe nsima na yango abimisi monkanda Exhortation Apostolique « Verbum Domini » ezali liteya oyo masanga ma bakristu ba biso bakoki kozangisa te (1). Monkanda oyo ezali kolendisa biso ‘te Nzambe azali ya solo mpenza na Liloba lya ye o ntango ya milulu, lokola na basakramentu Nzambe azali wana o ntango milulu mizali kosalema. (2)

Ezali malamu ‘te na bomoi ya bato ba ekolo ya Nzambe bokokani ya solo ezala ntango inso na Liloba lya bomoi. Mokonzi alembaka kolendisa Molongani wa ye te, na ntina ‘te akola na bolingo mpe bo nzeneneke ya boyambi.

  1. Naluboli bongo lomingo ya III o Mobu ya Eklezya, ezala mpo ya milulu, bomanyoli mpe bosakoli Liloba lya Nzambe. Lomingo loye ya Liloba lya Nzambe, ekosalema o o eleko elamu, mpamba te, tobyangami kolendisa bondeko na bayuda mpe kosambela mpo ya bomoko ya bakristu basusu. Makambo mana makutani eleko yoko mpamba te : kosepela lomingo ya Liloba lya Nzambe ekolakisa motuya ya « bomoko» mpo na baye bayokaka yango. Liloba lya Nzambe ezali nzela ya kolanda mpo ya kokokisa bomoko bwa solo mpe makasi.

Masanga ma bakristu makozwa nzela ya kosepela lomingo lona bo eyenga enene. Ekozala na ntina mingi soki milulu mya Misa mifungwani na botangi monkanda mosantu mpo bakristu bamono bonene mpe motuya ya Liloba lya Nzambe lokola nzela ya kolanda. O lomingo lona batia mpenza sete na ntango ya bosakoli Liloba mpe basala ‘te liteya limonisa polele lokumu esengeli Liloba lya Mokonzi. Ba-episkopo na lomingo lona bakoki kosala milulu ya kokotisa batangi Liloba o kati ya Misa to ya milulu mikokani ya bopesi etinda mpo bamonisa ntina enene ya bosakoli Liloba lya Nzambe. Esengeli mpenza kosala makasi mpo na kolengele bakristu basusu mpo bazala basangeli ba solo ba Liloba, kolakisa bango ndenge ekoki lokola basalaka mpo na ba-acolyte mpe na bankumu.

Se bongo na ba-paroisse, banganga-nzambe bakoki kopesa bakristu Biblia to buku yoko ya yango mpo na kolakisa na baye basangani ntina ya botangi o bomoi bwa ye mokolo na mokolo, koyingela o bozindo, kosambela na Bikoma Bisantu na lolenge ya Lectio Divina.

  1. Bozongi ya bana ba Israel o ekolo ya bango nsima ya boombo o Babyloni ezwaki ntina mpenza na ndenge bazalaka kotanga buku ya Mibeko. Biblia ezali kolakisa maye masalemaki o eleko ena ekobeta biso o motema. Tokomona yango na buku ya Neemia. Bato basangani o Yeruzalem esika yoko o boso bwa ‘Ezibeli ya Mai’ mpo bayoka Mobeko. Kala, o ntango ya boombo bapanzanaki, kasi sikoyo basangani zingazinga ya Minkanda Misantu lokola « moto moko » (Ne 8,1). Na ntango bazali kotanga Buku Esantu, bato banso « bazali koyoka » (Ne 8,3) mpe bongo bakomi koyeba o maloba mana ntina ya makambo makwelaki bango. Nsima ya boyoki, bato batondi na mawa mpe baleli. « Esdra atangi eteni ya buku ya Nzambe, ba-Levi babongoli yango o lokota la bango mpe balimboli maloba mana; bongo bato banso bayoki ntina ya mango. Na sima moyangeli Neemia na Esdra, Nganga-Nzambe mpe moteyi wa Mobeko, na ba-Levi balimboleli bato, balobi na bato banso : ‘Lelo ezali mokolo mosantu mwa Mokonzi Nzambe wa bino ! Boyoka mawa te, bolela mpe te !’ mpo banso babandaki kolela awa bayokaki maloba ma Mobeko (…) Bozala na mawa te, esengo ya Nzambe ekolendisa bino» (Ne 8,8-10).

Maloba maye mabombi liteya linene. Biblia ekoki kozala nkita to bomengo ya boko bato te, to mpe liboke lya minkanda ya bato baponomi te. Ezali liboso mpenza mpo na bato banso, baye babyangami mpo bayoka yango mpe, mpo bamiyeba kati ya Liloba oyo. Mbala mingi, bato basusu balingaka kokomisa Minkanda Misantu likambo etali bango moko to mwa lisanga ya bato baponomi. Ezali bongo te. Biblia ezali buku ya bato banso ba ekolo ya Nzambe. Na boyoki yango bakotika nzela ya bopanzani mpo ya kozala na bomoko. Liloba lya Nzambe likosangisa bandimi, likokomisa bango bato ba ekolo moko.

  1. Lokola bomoko bona bouti na boyoki, bakengeli bazali mpenza na lotomo mpe mokumba monene ya kolimbola Minkanda Misantu mpo bato bayeba ntina na yango mpenza. Lokola ezali buku ya bato banso, baye babyangami kozala basalisi ba Lilobabasengeli koyeba esengisi ena makasi ‘te lisanga lya bango ekoka kozwa Biblia. Liteya ya misa ezali na ntina mpe lotomo wana, mpamba te yango eulani, mpe «tokoki komonoyango bo sakramentu» (Evangelii Gaudium, n 142). Koyingisa o bozindo kati ya Liloba lya Nzambe na lokota ya mpasi te ekokani na moto oyo azali koyoka, ekosalisa Nganga-Nzambe kobimisa «mambi ma kitoko ya miulani Mokonzi azalaki kosalela mpo na kolendisa bato basala mambi malamu» (ibid). Ezali bongo libaku linene mpo ya Eklezya tokoki kozangisa te. Mpo na bandimi bayike ekoki kozala kaka libaku oyo bazwi mpo basimba mpe bayeba kitoko ya Liloba lya Nzambe mpe bamona ntina na yango o kati ya bomoi ya mokolo na mokolo. Na yango esengeli kobonza ngonga mpenza mpo na kolengele liteya. Akoki kolimbola matangi masantu mbalakata te. Mpo na biso bateyi, tobyangami tolekisa mateya molai te to na koloba makambo masusu. Soko totelemi mpo na bomanyoli mpe kosambela Minkanda Misantu, lisolo likoka kosalema o nse ya motema mwa yo, mpo ekoka kokoma mpe koyingela o mitema mya baye bazali koyoka, mpe kolakisa eloko ya motuya tozwi oyo ekobota mbuma. Tolemba soki moke te kobonza ngonga mpe kosambela na Minkanda Misantu mpo ‘te bandimi bayamba yango «lokola liloba lya bato te, kasi bayamba yango lokola Liloba lya Nzambe mpenza» (1 Tes 2,13).

Ezali mpe malamu ‘te bakatekisi, na mosala bazwi, basalisa na bokolisi boyambi. Bayoka mposa enene kozala na bomoi bwa sika na lisalisi lya boyebi bwa bango bwa Bikoma Bisantu mpe lya boyekoli bwa lyango. Bongo bakoki kokota mpenza na lisolo na Liloba lya Nzambe mpe na baye bazali koyoka bango.

  1. Yambo ‘te Yezu abimeli bayekoli ba ye baye bakangemaki o ndako, afungoli mayele ma bango mpo bayeba ntina ya maloba makomami o Minkanda Misantu (Lk 24,44-45), Mosekwi abimeli mibale ma bango o nzela ya Emaus (cf Lk 24,13-35). Lisolo ya santu Luka elakisi ‘te ezali o mokolo mwa Nsekwa ya ye, elingi koloba mokolo mwa Lomingo. Bayekoli babale wana bazalaki kosolola mpe kowelana ntembe na makambo malekaki o Yeruzalem, maye matali malozi mpe liwa ya Yezu. O nzela, mawa mpe makanisi ma nsomo ya nsuka ya bomoi ya Yezu elataki bango. Batiaki elikya na ye bo Mesiya mpe Mobikisi, kasi mitema mipaswani kotala ye o kuruse. Na pete nyonso Mosekwi abelemi mpe abandi kotambola na bango elongo. Bamoyebi te (v.16). O nzela, Mokonzi atuni bango, mpamba te amonaki ‘te bayoki ntina mpenza ya malozi mpe liwa na ye te. Abengi bango alobi : « E bino bato bozangi mayele! bozali kondima mango se malembe malembe» (v.25). «Mpe alimboleli bango maye makomami mpo ya ye o Minkanda Misantu minso, banda Moze tee baprofeta banso» (v.27). Kristu ye nde molimboli ya yambo ya Minkanda Misantu! Ezali bobele te zambi Mikoma mya kala milakisi maye Kristu akokokisa, kasi ye moko mpenza alingaki kotosa Liloba mpo amonisa polele bomoko ya mokano lya libiki oyo ezwi ntina mpenza na yemei Kristu.
  2. Na yango, Biblia lokola Bikoma Bisantu ezali koloba mambi matali Kristu mpe kosangela ‘te ye nde oyo akoyoka malozi mpo ayingela o nkembo (v. 26). Ezali bobele eteni yoko ekoloba mpo ya ye te, kasi Minkanda Misantu mobimba. Soki mizali te tokoki koyeba ntina mpenza ya liwa mpe nsekwa ya ye te. Yango wana na losambo loko ya kala ya bosakoli boyambi ekolobaka «Kristu awei mpo ya masumu ma biso, lokola ekomami o Minkanda Misantu; akundami, mpe asekwi o mokolo mwa misato lokola ekomami o Minkanda Misantu, abimeli Petro» (1 Kor 15,3-5). Lokola Minkanda Misantu mizali koloba mambi matali Kristu, yango ekopesa biso nzela toyamba ‘te liwa mpe nsekwa ezali lisapo ya mpamba te, kasi esalemaki ya solo mpe ezali motema mpenza ya boyambi ya bayekoli ba ye.

Eloko oyo esangisi Mikoma Misantu mpe boyambi ya bakristu ezali na bozindo mpenza. Mpamba te boyambi bouti na boyoki; boyoki oyo etali liboso mpenza Liloba lya Nzambe (Rom 10,17). Bongo bandimi babyangami noki na ntina enene ya komipesa mpo na boyoki Liloba lya Mokonzi, ezala na milulu mya Eklezya, ezala na losambo mpe ezala na bomanyoli o kati ya motema.

  1. « Mobembo» ya Mosekwi elongo na bayekoli ba Emaus esuki na limpati. Kristu andimi bosenga bwa bango, babondeli ye balobi : «Tikala epai ya biso, zambi moi mosili mokiti, mpe butu bobandi koinda» (Lk 24,29). Efandi ye elongo na bango o meza, Yezu akamati limpa, asambeli losambo la bobenisi, abuki lyango mpe apesi bango. Sikawa, miso ma bango mafungwani» (cf. v.31).

O kati ya lisolo liye, tomoni polele boniboni tokoki kokabola Minkanda Misantu mpe Ukaristya te. Concile Vatican II eteyi biso boye : « Eklezya ut’o kala ekumisaka Minkanda mya Nzambe lolenge loko asalaka mpo ya Nzoto ya Kristu. Ntango inso o milulu mya misa azwaka limpa lya bomoi o meza ya Liloba ya Nzambe mpe ya Nzoto ya Kristu mpo ebonzela bandimi» (Dei Verbum 21).

Kotanga ntango inso Minkanda mpe kozala o milulu mya Ukaristya ekomema bato ba etonga yoko bayebana. Lokola tozali bakristu, bato ba etonga yoko, baye bazali kotambola o mokili elongo na Mokonzi, yemei, azali koloba mpe koleisa biso. Mokolo moye tobonzeli mpo na Biblia esengeli kozala bobele te «mbala moko o mobu», kasi ezali likambo liumelaka mpo na mbula mobimba, mpo bomesene mpe bokangemi na Minkanda Misantu mpe na Mosekwi izali ntina enene mpo ya biso. Ye alembaka te kokabola Liloba mpe kobuka limpa o lisanga ya bandimi. Tosengeli tokangama na Minkanda Misantu, soki te mitema mikotikala mpio, miso mikokangema lokola bato ba lolanda ya ndenge na ndenge. Mikoma Misantu na Sakramento mikoki kokabwana te. Ntango Liloba likotisi mpe lipesi sakramento mwinda, tokomono polele mosala mwa ye ya libiki lokola nsuka ya nzela ya biso. Nzela oyo Kristu ye moko afungoleli mayele mpe motema mpo tokoka koyeba ndenge abikisi biso. Na likambo oyo, esengeli tobosana te liteya liuti na monkanda ya Boyebisi: Mokonzi atelemi penepene ya monoko mwa ndako, mpe azali kobete. Soko moto ayoki lolaka la ye mpe aziboli ndako, akoya mpo ya kolia o meza yoko na ye (cf. 3,20). O Minkanda Misantu Kristu Yezu azali kobete monoko mwa ndako ya biso; soki toyoki mpe tofungoli ezibeli ya molimo mpe motema, ye akoyingela o bomoi bwa biso mpe akotikala kofanda elongo na biso.

  1. O monkanda mwa mibale ya santu Polo ona Timoteo, oyo ezali lokola maloba ma ye ma nsuka, santu Polo ayebisi moninga wa ye atangaka Minkanda Misantu mbala na mbala. Moyekoli Polo ayebi ‘te Minkanda Misantu minso mikomami na lisalisi lya Nzambe, mikoki koteya, kopalela, kobongisa mpe kokolisa moto o bosembo (2 Tim 3,16). Na etinda eye ya Santu Polo ona Timoteo etongami liteya linene lya Dei Verbum na makambo matali lisalisi ya Elimo Santu na bokomi Minkanda Misantu. Na yango abimisi mateya matali libiki, bomoi bwa boyambi na bokomi moto ya Mwana Nzambe.

Na bozongeli etinda ya Polo ona Timoteo, Dei Verbum atii nsete ‘te «Minkanda Misantu mizali koteya bosolo, ndenge esengeli, na libunga te, bosolo boye Nzambe abombi kati ya Minkanda Misantu mpo na libiki lya biso» (n°11). Lokola Minkanda mina mikoteya mpo ‘te tobika na boyambi Kristu Yezu (2 Tim 3,15) bosolo bona bozali mpo ya libiki ya biso. Biblia ezali lisanga ya babuku te, to ya masolo mpe te ya mikolo ya kala kasi ntina na yango etali libiki mpenza ya moto mobimba. Ya solo Minkanda Misantu etongami na mambi masalemaki o ntango elekaki kasi tobosana te ntina ya yango ya liboso mpenza ezali mpo ya libiki lya biso.

Biblia ekomami lokola lisolo lya libiki litali Nzambe azali koloba, kosala, na ntina ‘te akutana na bato, babika o mabe mpe o liwa. Wana nde ntina na yango. Mpo ya kokokisa ntina na yango mpo ya libiki, Minkanda Misantu, na nguya ya Elimo Santu, ebongoli Liloba lya Nzambe na maloba ma bato makomami o nkota ya bomoto (DV n. 12). Mosala mwa Elimo Santu o Minkanda Misantu ezali ntina enene. Soko ye asali te likama ya kokangema bobele na maye makomami lizali, bakolimbola yango lokola ba-fondamentaliste. Toboyi bango. Soki te tokobungisa o buku esantu mambi matali likanisi lya Nzambe, nguya mpe boyambi. Lokola santu Polo akonduli biso : « Bikoma bibomaka, kasi Elimo Santu apesaka bomoi» (2 Kor 3, 6).

Elimo Santu abongolaka Minkanda Misantu na Liloba lya Nzambe ya bomoi, eye bato ba ekolo esantu basengeli kokokisa o bomoi bwa bango kati na boyambi.

  1. Mosala mwa Elimo Santu etali bobele baye bazali koyekola Minkanda Misantu te kasi, ekosala mpe epai ya baye bazali koyoka Liloba lya Nzambe. Makambo ba Tata ya Konsile balobaka mazali ya solo: Minkanda Misantu «misengeli kotangema mpe kolimbola yango na mwinda mwa Elimo oyo atindi bakoma yango» (DV n°12). Na Yezu Kristu bomiyebisi bwa Nzambe ekomi na bokokisi na yango mobimba; kasi Elimo azali kokoba mosala mwa ye. Solo ebongi te kokanisa ‘te mosala ya Elimo Santu esuki bobele na bosalisi bwa ye na bakomi basantu. Esengeli totia motema na mosala mwa Elimo Santu mpo azali kokoba mosala na ndenge ya ye ya kobotisa makanisi na Eklezya, o ntango Eklezya ateyi Minkanda Misantu, mpe ntango Eklezya alimboli yango na mosala mwa ye lokola Moteyi (cf. ibid., 10), mpe o ntango moto wa boyambi asaleli mango lokola nzela ya kolanda. Na yango tokoki koyeba malamu ntina ya maloba ma Yezu ntango bayekoli bandimi ‘te bayoki ntina ya miulani; alobi na bango: «Yango wana moteyi wa Mobeko, soko akomi kondima Bokonzi bwa Likolo azali lokola nkolo wa ndako azali na biloko mingi; o kati ya biloko bya ye, akopono biye bya sika mpe biye bya kala» (Mt 13,52).
  2. Dei Verbum alimboli boye : «Maloba ma Nzambe malekani na nkota ya bato, makomi lokola lokota ya bato, se bongo kalakala Liloba lya Tata ya seko, oyo andimaki kozwa botau ya nsuni ya biso, akomi moto lokola biso» (n. 13). Tokoki mpe koloba ‘te bokomi moto ya Liloba lya Nzambe epesi lolenge mpe ntina mpenza na bokangemi ya Liloba lya Nzambe na lokota la bato na kati-kati ya mimeseno mpe evandeli na bango. Mambi mana manso ezali kotonga Mimeseno mya Eklezya, bongo yango mpe ezali Liloba lya Nzambe (Ibid., n° 9). Mbala mingi tokebaka te mpe tozwaka kwokoso ya bokaboli Minkanda Misantu na Mimeseno mya Eklezya mpo na kozanga koyeba ‘te yango mibale miuti na liziba lyoko, yango nde, bomiyebisi bwa Nzambe. O Minkanda Misantu, Liloba ata likomami kala ezali koloba tee sikoyo; na ndenge moko Mimeseno mya Eklezya ezali kokola, ezali kolekisa liloba lina na bileko na mabota makolandana, ezali kosimba Mikanda Misantu lokola «motindo nta enene ya boyambi » (Ibid., n° 21). Tokoki mpe koloba ‘te yambo Minkanda Misantu mikomama, balekisi myango o monoko na monoko, mibombami malamu mpo ya boyambi ba bato ba ekolo. Mpo ya bango mizali lisolo lya bango mpe mikolakisa bango bazali banani ndenge bakeseni na bikolo bisusu. Boyambi botongami na Biblia ezwi bozindo na yango na Liloba lya bomoi, kasi na buku te.
  3. Soko Minkanda Misantu mitangemi na likanisi se moko na ndenge ekomamaki ekotikala libela eloko ya sika. Bondeko bwa Kala ezali likambo ya kala te soko bayingisi yango na Bondeko bwa Sika, mpamba te manso mabokwami na Elimo se moko oyo abotisaka makanisi. Minkanda Misantu minso mizali na lotomo ya boprofeta: mitali maye makoya lobi te, kasi lelo, mpo na moto oyo azali komileisa na Liloba. Yezu Yemei asakoli polele yambo ‘te abanda mosala mwa ye : « Lelomei maloba ma Bikoma Bisantu maye boyoki masalemi solo » (Lk 4,21). Moto oyo akomileisa mokolo na mokolo na Liloba akomikomisa lokola Yezu elingi koloba moninga ya baye banso azali kokutana na bango; akozwa lisenginya te ‘te akweya na makanisi ma kala ezanga ntina to na makanisi ma sika lokola ndoto ya kitoko mpamba. Minkanda Misantu mizali kokokisa mosala mwa boprofeta liboso mpenza epai ya moto oyo azali koyoka. Ezali kotumola elingi to bololo. Tokundola maloba ma profeta Ezekiel ntango Mokonzi ayebisi ye alia buku, ye alobi : «Nalei yango mpe nayoki elengi lokola mafuta ma nzoi» (Ez 3,3). Se bongo moyekoli Yoane o esanga ya Patmos akutanaki na likambo ya ndenge wana lokola Ezekiel, alia buku. Kasi ye abakisi likambo ya motuya : «O monoko nayoki yango elengi lokola mafuta ma nzoi, awa nameli yango, bololo bozwi ngai makasi o libumu» (Boy 10,10).

Elengi ya boyoki Liloba lya Nzambe ekotinda biso kokabola yango na baye tozali kokutana mokolo na mokolo na bango mpe tolakisa elikya ya ntembe te tokozwa kati ya Liloba lya Nzambe (1 Pe 3,15-16). Nzokande mawa ekoya ntango tomoni ‘te tokokoka kokokisa liloba lina te o bomoi bwa biso lokola esengeli, to soki tomonaki biso moko ndenge baboyaki yango lokola ezali na ntina te mpo ya bomoi. Bongo esengeli totala Liloba lya Nzambe mpamba-mpamba te, kasi tomileisa na yango mpo toyeba na bozindo mpe tosalela yango na bokangemi ba biso na Nzambe mpe na bandeko ya biso.

  1. Likambo mosusu Liloba lya Nzambe likotinda tosala etali bolingi baninga. Mbala na mbala Liloba lizali kokundola biso ngolu ya Tata oyo asengi na bana ba ye ezali kozala na bolingi baninga. Bomoi bwa Yezu bozali mpenza ndimbola mobimba ya bolingi bona: bolingo oyo ebombi mpo yoko te mpo na ye moko, kasi amibonzi mobimba mpo na bato banso. Na moulani ya moto mobola Lazaro tokozwa likambo moko ya motuya mpenza. Moto mobola mpe ya nkita bawei. Emoni moto wa nkita Lazaro o maboko ma Abarama asengi na mobola atinda bato o mboka ya bandeko ba ye mpo akebisa bango bayeba kolinga baninga, mpo banyokwama na mpasi lokola ye te. Eyano ya Abarama eswaka makasi: «Bazali na mibeko mya Moze mpe na minkanda mya baprofeta, bayoka bango» (Lk 16,29). Koyoka Minkanda Misantu mpo ya kosala mambi ma ngolu: ezali etumba mpo na bomoi bwa biso. Liloba lya Nzambe lizali na makoki ya kofungola miso ma biso mpo tobima na “bo-ngai” bomoni se ngai moko oyo ezangisaka biso mpema mpe ekomisaka biso ba ekomba, bongo nzela enene ekofongwama mpo ya bokaboli mpe bosalisani.
  2. Yoko ya mambi malekaki ya kitoko ezali bokangemi ya Yezu na bayekoli ba ye, ezali ntango Yezu abongwani nzoto. Abuti ngomba mpo na kosambela elongo na Petro, Yakobo mpe Yoane. Bakomi ba Nsango Elamu bayebisi ‘te ntango elongi mpe bilamba ya Yezu bizali kongenge bato babale bayei kosolola na ye: Moze na Elia. Moze ntoma ya mobeko mpe Elia ya ba profeta. Buku ya Mobeko na Buku ya Baprofeta izali nde Minkanda Misantu. Emoni Petro makambo wana akamwi na esengo: «Motei awa tozali malamu mingi! Bongo topika biema bisato awa, yoko ya yo, yoko ya Moze, yoko ya Elia» (Lk 9,33). Ezalaki ye koloba bongo limpata liyei kokitela mpe kozipa bango. Bayekoli batondi na nsomo.

Eyenga ya Yezu abongwani nzoto ezali kokundola eyenga ya biema, ntango Esdras na Neemia batangelaki bana ba ekolo ya Nzambe Minkanda Misantu nsima ya bozongi o boombo. Eyenga ena mpe ekomonisa liboso nkembo Yezu akozwa nsima ya malozi, nkembo ya Nzambe tomoni na limpata ezingi bayekoli, elembo ya Nzambe o ntei ya bango. Bobongwani bona boulani na oyo ya Minkanda Misantu o ntango ileisi bomoi bwa bandimi (cf DV 38). Lokola Verbum Domini akundoli: «Na bomoni makanisi mingi matali Minkanda Misantu esengeli koyeba nzela ya boleki bwa “nkoma” na “ntina” na yango. Boleki boye bokosalema te mpamba-mpamba. Esengeli “nkoma” eleka na “letele” na “ntina” (n. 38).

  1. O nzela ya koyamba Liloba lya Nzambe, Mama wa Mokonzi azali elongo na biso, oyo toyebi bo moto ya esengo, mpamba te ye andimaki ‘te maloba ma Mokonzi makokokisama (Lk 1,45). Esengo ya Maria eleki bisengo binso Yezu asakolaki mpo na babola, bato bazali kolela, bato ba bosawa, bato bakoluka boyokani, bato bakonyokwama, yango nde esengeli mpo na bozwi esengo. Mobola moko te azali “moto wa esengo, mpo na bobola bwa ye; akokoma bongo lokola Maria soki ayambi ‘te maloba ma Mokonzi makokokisama o bomoi bwa ye. Moyekoli mpe moteyi monene ya Minkanda Misantu, Santu Ogustino akundoli ‘te: «O kati ya bato ebele, moto moko esengo etondaki o motema agangi: esengo na libumu ememaki yo, mpe ye azongisi: esengo mpenza nde na baye bakoyoka Liloba lya Nzambe babombi yango».

Elingi koloba: Mama wa ngai, oyo obengi moto wa esengo azali bongo solo zambi abombaki Liloba lya Nzambe. Ezali te mpo Liloba akomaki moto o nzoto ya ye mpe azalaki o kati ya bisu, kasi mpo abombi Liloba lya Nzambe oyo akelaki ye, mpe na ye akomi moto (Ndimbola ya Yo 10,3)

Ekozala malamu ‘te eyenga ya Lomingo ya Liloba lya Nzambe ekolisa bato ba ekolo ya Mokonzi o boyambi, bopikiliki mpe bomesene na Minkanda Misantu, lokola mokomi mosantu ateya kala : «Kasi Liloba lizali penepene na bino, lizali o minoko mpe o mitema mya bino. Bongo bokoki kotosa yango» (Mib 30,14).

Epesami na Roma, penepene na Ndako-Nzambe Santu Yoane ya Latran le 30/09/2019. O eyenga ya Santu Yeronimo o kati ya Eklezya, o ebandela ya bosepeli bwa mibu 1600 mya liwa lya ye.

François

Traduction Mama Marie Mosikwa

 

Pour consulter le document en Français (FR), Anglais (EN), et autres langues cliquer sur ce lien :

http://www.vatican.va/content/francesco/fr/motu_proprio/documents/papa-francesco-motu-proprio-20190930_aperuit-illis.html

Leave A Comment